11 Mpe soki oyo esengelaki kosila ezalaki na nkembo, ndenge nini nkembo ya oyo ekowumelaka seko na seko eleka monene te ?
Tokoki ata koloba ete nkembo ya kala ebungisa kongenga na yango liboso ya nkembo ya sika oyo eleki penza monene.
Lokola tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na bobangi te ;
Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;
Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika, » elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala ; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.