Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.
‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ?
Mokonzi, na ngonga ya midi, wana nazalaki kokende, namonaki pole moko kowuta na likolo, elekaki kutu ata kongenga ya moyi ; pole yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki kotambola elongo na ngai.
Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.