Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Boni, tokomi lisusu komikumisa biso moko ? Boni, tozali lisusu na posa, lokola bato mosusu, ya kopesa bino mikanda ya matatoli to ya kosenga bino mikanda ya matatoli ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 3:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Kolinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi,


Natindeli bino Foebe, ndeko na biso ya mwasi, oyo azali mosali ya Lingomba ya Sankresi.


Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.


Tango nakoya, nakotinda elongo na mikanda, bato oyo bino moko bokopona, mpo ete bamema makabo na bino kuna na Yelusalemi.


Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.


Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.


Toboyi komikokanisa to komekana na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele !


Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.


Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te


Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.


Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.


Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.


Tozali lisusu te komilobela epai na bino, kasi tozali nde kopesa bino libaku malamu ya komikumisa na tina na biso, mpo ete bokoka koyanola bato oyo bamikumisaka te na tina na makambo oyo ebombama kati na mitema, kasi na tina na oyo emonanaka na miso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ