8 Yango wana, nazali kosenga na bino ete bolinga ye lisusu.
Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.
Pamba te nakomelaki bino lisusu mpo na komeka bino mpe mpo na kotala soki botosaka na makambo nyonso.
Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.