5 Soki moko kati na bino ayokisaki moninga na ye mawa, ayokisaki yango ngai te kasi ayokisaki nde bino nyonso to ndambo kati na bino, mpo nalekisa ndelo te.
Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
Ngai nandimisami mpo na bino kati na Nkolo ete bokotikala kozala na makanisi mosusu te ; mpe ete moto oyo azali kotia mobulu kati na makanisi na bino akozwa etumbu, ezala ata nani.