Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Pamba te, mpo na Nzambe, tozali solo kitoko ya Klisto kati na bato oyo bazali na nzela ya lobiko mpe kati na ba-oyo bazali kobunga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 2:15
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo ; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Solo ya malasi na yo ezali kitoko, mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko oyo epanzani ; yango wana bilenge basi balingaka yo !


Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo.


bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.


Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki ;


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


mpe lolenge nyonso ya mabe, mpo na kokosa bato oyo bazali kokende na libebi, pamba te bayambaki te bolingo ya bosolo oyo esengeli kobikisa bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ