Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !
Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano ekendaka bipai na bipai to mbilambila epumbwaka-pumbwaka, ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te moto oyo asali na ye mabe te.
Kasi Yesu azongisaki : — Bopekisa ye te ; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai.
Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te
Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.