Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 13:7 - Mokanda na Bomoi

7 Sik’oyo, tozali kobondela Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te ; ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala bolamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 13:7
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; alobaki : « Oh Yawe ! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene ! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai ! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.


Totambola malamu, na lolenge oyo ebongi mpo na moyi : na lokoso te, na milangwa te, na pite te, na mobulu te, na koswana te mpe na zuwa te.


Bopesa mbote na Apelesi oyo alakisaki penza ete azalaka ya Klisto. Bopesa mbote mpe na bavandi ya ndako ya Arisitobile.


Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.


Pamba te bato mosusu balobaka : « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka ; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »


Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.


Kasi nazali na elikya : bokoyeba solo ete biso tokweyaki te liboso ya komekama.


Pamba te tozali na nguya te ya kotelemela solo, kasi tozali kaka na nguya ya kokokisa yango.


Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi ; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.


Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;


Pamba te totondi na posa makasi ya kozala na etamboli ezanga pamela, na miso ya Nkolo kaka te, kasi mpe na miso ya bato.


Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu.


Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.


Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ