5 Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.
Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.
Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.
Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.
Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.
Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto ? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba ? Ata moke te !
Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ?
Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano ? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano.
Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali : Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.
Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.
Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.
Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.
Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.
Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.