Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 13:4 - Mokanda na Bomoi

4 Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko : tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 13:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.


Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.


Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.


mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi : Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki, mpo ete azala Nkolo ya bakufi mpe ya bato ya bomoi.


Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.


Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.


ekundami nzoto ya soni, kasi ekosekwa nzoto ya lokumu ; ekundami nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya ;


Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.


Solo, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa mpe biso, na nguya na Ye.


Pamba te bato mosusu balobaka : « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka ; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »


Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.


Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi ; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.


Posa monene ya motema na ngai ezali : koyeba Klisto, koyeba nguya ya lisekwa na Ye, kosangana na pasi na Ye, kokokana na Ye kati na kufa na Ye


Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.


Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.


oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ