3 lokola bozali kosenga elembo oyo ezali kolakisa ete Klisto alobaka na nzela na ngai ; pamba te azali na bolembu te mpo na bino, kasi asalaka na nguya kati na bino.
Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :
Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,
Moto nyonso oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye ; mpe likambo oyo ngai nalimbisi, soki ezalaki penza na likambo ya kolimbisa, nalimbisi yango mpo na bolamu na bino na miso ya Klisto,
Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,