Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 13:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 13:11
51 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bandeko na ye ya mibali bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye koleka bango nyonso, bayinaki ye mpe bakokaki lisusu te koloba na ye na motema malamu.


Jozefi atikaki bandeko na ye kokende. Tango bazali kolongwa, alobaki na bango : — Boswana te na nzela.


« Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »


Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.


Yesu atelemaki mpe alobaki : — Bobenga ye ! Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye : — Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !


Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.


Mosusu lisusu alobaki na Ye : — Nkolo, nakolanda Yo ; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.


Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.


Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu !


Atikaki bango na koloba : — Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi. Wuta na Efeso, azwaki masuwa mpe akendeki.


Tango bayebisaki ngai ete Bayuda basaleli ye likita mpo na koboma ye, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na yo noki penza ; mpe napesaki lisusu mitindo na bato oyo bafundaki ye ete baya kofunda ye epai na yo.


Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.


Lokola ekoki kosalema, mpe lokola bino nde bosengeli kopesa nzela, bozalaka na kimia na bato nyonso.


Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.


Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.


Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso ! Amen !


Etikali moke, Nzambe ya kimia akonyata-nyata Satana na se ya matambe na bino. Tika ete ngolu ya Yesu, Nkolo na biso, ezala na bino !


Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko.


abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.


Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi ; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.


mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.


bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino.


Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu-Klisto bapesa na bandeko nyonso kimia, bolingo mpe kondima !


Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino,


Nzokande, na esika oyo tosili kokoma, totambola nzela moko.


Nasengi na Evodi mpe na Sentishe ete bazala na makanisi moko kati na Nkolo.


Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !


Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.


Tobondelaka Nzambe na molende nyonso, butu mpe moyi, mpo ete apesa biso nzela ya komona bino lisusu mpe ya kokokisa oyo ezangi kati na kondima na bino.


Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.


Bomemiaka bango makasi kati na bolingo mpo na mosala na bango. Bobikaka na kimia kati na bino.


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu,


Bandeko, bobondelaka mpo na biso na tina na makambo mosusu, mpo ete Liloba na Nkolo epanzana noki mpe epesamela lokumu ndenge ezalaki kozwa lokumu epai na bino.


Tika ete Ye moko Nkolo na kimia apesaka bino kimia tango nyonso mpe na lolenge nyonso ! Tika ete Nkolo azala elongo na bino nyonso !


Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.


Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.


Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,


Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.


asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu, koluka kimia mpe kokoba na yango,


Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.


Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.


Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ