Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 Nzokande, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo ; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 12:6
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai ete nazali koloba lokuta ? Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? »


Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu :


Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.


Kasi lokola ezali solo ete Nzambe azali Moyengebene, maloba oyo toyebisaki bino ezali te « iyo » mpe « te. »


Nazongeli lisusu : tika ete moto moko te azwa ngai lokola moto ya liboma ! Kasi soki bolingi bongo, boyamba ngai lokola moto ya liboma mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke.


Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te.


Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.


Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.


Mpo na biso, soki tozali komonana lokola bazoba, ezali kaka mpo na Nzambe ; mpe soki tozali komonana lokola bato ya mayele, ezali nde mpo na bino.


Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ