2 Bakolinto 12:14 - Mokanda na Bomoi14 Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te ; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango.