Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 11:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te ; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 11:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.


mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango.


Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.


Nalulaki te palata to wolo to elamba ya moto moko.


Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi.


Nasepeli mingi komona Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi ; pamba te esali lokola namoni bino nyonso.


Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;


Pamba te lotomo ya makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe.


Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.


Tolukaki te lokumu kowuta na bato, ezala epai na bino to epai ya bato mosusu,


Bandeko na ngai, bokanisa ndenge nini tomonaki pasi mpe tosalaki mosala makasi ; butu mpe moyi, tozalaki kosala, pamba te toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko kati na bino, wana toteyaki bino Sango Malamu ya Nzambe.


bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba ; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ