Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 11:4 - Mokanda na Bomoi

4 Pamba te bozali kondima ete songolo aya koteya bino Yesu mosusu oyo akeseni na Yesu oyo biso toteyaki bino ; bozali mpe kondima kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo boyambaki to mateya oyo ekeseni na Sango Malamu oyo bondimelaki !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 11:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na bango lisusu : — Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino.


Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.


Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata ! »


Pamba te moko te akoki kotonga moboko mosusu, longola kaka oyo esili kotongama, oyo ezali Yesu-Klisto.


Bandeko, nabondeli bino : boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko ! Iyo, boyikela ngai mpiko.


Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, Nkolo afungolelaki ngai bikuke mpo ete nakoka kosala mosala na ngai.


Nalingi kotuna bino motuna moko kaka : « Bozwaki Molimo mpo botosaki Mobeko to mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? »


Ndenge nasengaki na yo tango nazalaki na Masedwane, tikala awa kati na Efeso mpo ete opesa bato mosusu mitindo ete batika koteya mateya ya lokuta


Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato : ezali moto moko, Yesu-Klisto


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ