Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 11:25 - Mokanda na Bomoi

25 mbala misato, babetaki ngai banzete ; mbala moko, babambaki ngai mabanga ; mbala misato, nazindaki na mayi ; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 11:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »


kasi bafuteli elanga bakangaki basali yango ; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.


Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.


Bato ya bikolo ya bapaya mpe Bayuda, elongo na bakambi na bango, bazwaki mokano ya konyokola bantoma mpe koboma bango na mabanga ;


Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli boloko azwaki bango elongo na ye mpe asukolaki bango bapota ; bongo, mbala moko, ye mpe libota na ye bazwaki libatisi.


Kasi Polo azongisaki : — Nini ! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbu na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzokande biso tozali bato ya Rome. Balingi sik’oyo kobimisa biso na nkuku ? Te, ekosalema bongo te ! Tika ete bango moko baya kobimisa biso !


mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye.


na kobatelaka kondima mpe motema ya malamu, oyo bato mosusu basili kobwaka kino kobungisa kondima na bango.


bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba ; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ