Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 11:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bazali Ba-Ebre ? Ngai mpe nazali Mo-Ebre. Bazali bana ya Isalaele ? Ngai mpe nazali mwana ya Isalaele ! Bazali bakitani ya Abrayami ? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 11:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo ?


Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »


Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.


Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.


Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’


Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


— Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai ; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.


Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.


Bongo natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.


oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka


Nzokande, Nzambe apesaki bilaka na Ye epai ya Abrayami mpe epai ya mokitani na ye. Makomi elobi te « Epai ya bakitani » lokola nde ezalaki likambo ya bato ebele, kasi elobi « Epai ya mokitani na yo » mpo na kolakisa ete etali moto se moko kaka, ye nde Klisto.


pamba te bakatisaki ngai ngenga na mokolo ya mwambe, nazali penza moto ya Isalaele kati na libota ya Benjame, mpe nazali Mo-Ebre oyo abotama na baboti oyo bazali mpe Ba-Ebre. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ