19 Bino oyo bozali bato ya bwanya, bozali kondima na esengo nyonso bato ya maboma.
Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele ; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe.
Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba ; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele ! Biso, tozali bato na bolembu ; kasi bino, bozali bato makasi ! Bino, bozali kozwa lokumu ; kasi biso, tozali kotiolama !
Mpo na oyo etali misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete biso nyonso tozali na boyebi. Boyebi epesaka lolendo, kasi bolingo elendisaka.
Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko ; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi.
Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.