Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 11:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya Nzambe ya sembo. Kasi suka na bango ekozala kolanda misala na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 11:15
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye : — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te ? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo : « Sukola, mpe okokoma peto ! »


tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te ; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te,


— Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo ! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe ! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo ?


Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye :


Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.


Boni, soki tolonaki nkona ya molimo kati na bino, ezali penza mabe soki tobuki kati na bino mbuma ya biloko oyo maboko ekoki kosimba ?


Pamba te bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi oyo bazali komikomisa lokola bantoma ya Klisto.


Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.


Pamba te, soki lotomo oyo ememelaki bato etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo esalaki ete Nzambe akomisa bato sembo eleka na nkembo te ?


Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.


Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.


Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.


Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.


Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi.


Nyama oyo namonaki ezalaki lokola nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya ngombolo, mpe monoko na yango lokola ya nkosi. Dalagona epesaki nyama wana nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.


Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ