8 Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te
Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,
Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.
Nzokande, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo ; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai.
Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.
Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo.
Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.