Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 10:17 - Mokanda na Bomoi

17 Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 10:17
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosepela na Kombo na Ye ya bule ! Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe etonda na esengo !


mpo ete namona esengo ya baponami na Yo, nasepela na bolamu ya ekolo na Yo mpe nasepela elongo na libula na Yo !


okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango, mopepe makasi ekopanza yango. Kasi yo, okosepela kati na Yawe, okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele.


Ezali kati na Yawe nde bato nyonso oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa lokumu.


Moto nyonso oyo akobelela lipamboli kati na mokili akosala bongo na Kombo ya Nzambe ya solo, mpe moto oyo akolapa ndayi kati na mokili, akolapa yango na Kombo ya Nzambe ya solo. Pamba te pasi ya kala ekomonana lisusu te, ekobombama na miso na Ngai.


soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »


Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.


mpo ete moto ata moko te amikumisa liboso ya Nzambe.


mpo ete, kolanda ndenge ekomama, « Tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo ! »


Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ