Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 10:14 - Mokanda na Bomoi

14 Solo, toleki bandelo na biso te lokola nde tokomaki te kino epai na bino, pamba te tokomaki penza kino epai na bino mpo na komemela bino Sango Malamu ya Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 10:14
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe,


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka : liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.


Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala,


Nyonso wana ekomonana polele, na mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.


Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye ; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.


Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.


Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.


Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, Nkolo afungolelaki ngai bikuke mpo ete nakoka kosala mosala na ngai.


ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.


Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo ; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu


kolanda Sango Malamu oyo napesamelaki mokumba, Sango Malamu ya nkembo ya Nkolo-Na-Esengo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ