Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 10:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo ; tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 10:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na nzela ya lisolo te, na nzela mpe ya maloba te oyo mingongo na yango eyokanaka te.


Moto oyo amikumisaka ete akabaka, nzokande apesaka na ye eloko te, azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.


Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi mpe boyengebene lokola singa ya mbodi ; mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino.


Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.


Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »


Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.


Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,


Pamba te nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Klisto eyebanaki nanu te, mpo ete natonga na likolo ya moboko ya moto mosusu te,


Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.


Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki.


Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe ; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ