10 Pamba te bato mosusu balobaka : « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka ; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »
Moyize alobaki na Yawe : — Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te ! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo.
Pamba te Klisto atindaki ngai te kobatisa bato, kasi atindaki ngai kosakola Sango Malamu. Mpo na yango, nasengeli te kosalela bwanya mpe elobeli malamu ya bomoto, noki te ekulusu ya Klisto ezanga nguya na yango.
Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.
Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :
Boye tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo : ndenge tolobaka kati na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tokozala epai na bino.
Nalobi yango na soni ete tozalaki penza babolole mpo na komitika bongo. Nzokande, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na tina na yango —nazali koloba lokola moto ya liboma— ngai mpe nakoki komikumisa na tina na yango.
Nakoki solo komonana lokola moto oyo ayebi nanu te koloba malamu, kasi nazali na boyebi ; mpe tolakisaki bino yango polele na banzela mpe na makambo nyonso.
lokola bozali kosenga elembo oyo ezali kolakisa ete Klisto alobaka na nzela na ngai ; pamba te azali na bolembu te mpo na bino, kasi asalaka na nguya kati na bino.