7 Boye, tozali solo na elikya makasi na tina na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge kaka bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.
Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.
ndenge kaka bosili kososola yango mwa moke, ete bokoki penza komikumisa na tina na biso, ndenge mpe biso tokomikumisa na tina na bino na mokolo ya Nkolo Yesu.
Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.
Kasi sik’oyo, nazali kosepela : ezali te mpo boyokaki mawa, kasi mpo ete mawa yango ememaki bino na kobongola mitema. Pamba te mawa na bino ezalaki malamu na miso ya Nzambe ; mpe na bongo, tosalaki bino mabe te.
minyoko mpe pasi na ngai ; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.
Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.