Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 1:6 - Mokanda na Bomoi

6 Boye soki tozali komona pasi, ezali mpo na kobondisama mpe lobiko na bino. Soki mpe biso tobondisami, ezali mpo ete bino mpe bobondisama mpo na koyikela pasi oyo tozali komona elongo na bino mpiko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 1:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela.


Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.


abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.


Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?


Nzambe oyo abongiseli biso likambo yango apesi biso Molimo na Ye lokola ndanga ya biloko oyo esengeli koya.


Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano—


Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino.


Nayebi solo ete, na nzela ya mabondeli na bino mpe ya lisungi ya Molimo ya Yesu-Klisto, makambo oyo ekomeli ngai ekosuka na kokangolama na ngai.


Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ