Kaka na tango yango, wana Yesu azalaki koteya kati na Tempelo, alobaki na mongongo makasi : — Solo, boyebi Ngai mpe boyebi epai nawuti ! Nzokande, nayei na ndenge na Ngai moko te ; ezali Ye oyo azali penza ya solo nde atindi Ngai, mpe bino, boyebi Ye te.
Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino ; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.