Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakolinto 1:14 - Mokanda na Bomoi

14 ndenge kaka bosili kososola yango mwa moke, ete bokoki penza komikumisa na tina na biso, ndenge mpe biso tokomikumisa na tina na bino na mokolo ya Nkolo Yesu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakolinto 1:14
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani ; mpe nazali kondima yango mwa moke.


Bandeko na ngai, mokolo na mokolo, nandimaka kokufa, wana namikumisaka na tina na bino kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Soki moko kati na bino ayokisaki moninga na ye mawa, ayokisaki yango ngai te kasi ayokisaki nde bino nyonso to ndambo kati na bino, mpo nalekisa ndelo te.


Tozali lisusu te komilobela epai na bino, kasi tozali nde kopesa bino libaku malamu ya komikumisa na tina na biso, mpo ete bokoka koyanola bato oyo bamikumisaka te na tina na makambo oyo ebombama kati na mitema, kasi na tina na oyo emonanaka na miso.


pamba te nayebi molende na bino mpo na kosunga, mpe nazalaki komikumisa na tina na yango epai ya bato ya Masedwane. Nazalaki koloba na bango : « Kati na Akayi, wuta na mobu oyo eleki, bazali ya kobongama mpo na kopesa. » Mpe bolingo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga.


mpo ete bokoka kososola makambo oyo eleki malamu. Na bongo, bokozala peto mpe bokozanga pamela mpo na mokolo ya Klisto,


Boye, tango nakozala lisusu elongo na bino, lolendo na bino kati na Yesu-Klisto ekobakisama lisusu mpo na ngai.


Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.


mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te.


Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo.


Tika ete alendisa mitema na bino mpo ete bozanga pamela kati na bosantu liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, na mokolo oyo Yesu, Nkolo na biso, akoya elongo na basantu na Ye nyonso ! Amen !


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ