Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama mpe nandima komema mokumba wuta mbotama na bino.
Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.
Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye : — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.
Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.
Tala mpo na nini tosalaka mpe tobundaka makasi : ezali mpo ete tosili kotia elikya na biso kati na Nzambe na bomoi oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe mingi-mingi ya bandimi na Ye.
Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.
Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi : — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.