Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 5:20 - Mokanda na Bomoi

20 Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 5:20
53 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nazali ebandeli mpe nazali suka ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.


Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.


Tango mokolo yango ekokoma, bokososola ete nazali kati na Tata na ngai ; bokososola lisusu ete bozali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na bino.


Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.


Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.


Yesu azongiselaki ye : — Ah Filipo ! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te ? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi : « Lakisa biso Tata ? »


Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.


Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.


Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te ; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai.


Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.


Toma azongiselaki Yesu : — Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai !


Yesu alobaki na bango : — Soki Nzambe azalaki penza Tata na bino, bolingaki kolinga Ngai, pamba te nawutaki epai ya Nzambe, mpe ezali kolanda mokano na Ye nde nazali sik’oyo awa. Nayaki na ndenge na Ngai moko te, kasi Ye nde atindaki Ngai.


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !


Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.


mpo ete bozwa nguya ya kososola elongo na basantu nyonso monene, molayi, mokuse mpe bozindo ya bolingo ya Klisto,


mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto : Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama : komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo


Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana : « Oh Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko, lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo.


Moto nyonso oyo awangani Yesu azali mpe na Tata te. Moto oyo atatoli Yesu azali mpe na Tata.


Kasi bino, bosimba makasi makambo oyo boyokaki wuta na ebandeli. Soki ezali penza kowumela kati na bino, bokowumela mpe kati na Mwana mpe kati na Tata.


Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na Nzambe asengeli mpe kotambola ndenge Yesu atambolaki.


Tosilaki komona Ye mpe totatolaka ete Tata atinda Mwana na Ye mpo ete azala Mobikisi ya mokili.


Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.


Tala ndenge nini bokoyeba soki bazali na Molimo ya Nzambe : moto nyonso oyo azali kondima ete Yesu-Klisto akomaki moto azali na Molimo ya Nzambe.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.


Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.


Nani oyo alongaka mokili ? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe.


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise : Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe :


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.


Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ