2 Tala ndenge nini toyebaka ete tolingaka bana na Nzambe : ezali na nzela ya kolinga Nzambe mpe ya kotosa mibeko na Ye.
Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino.
Tala ndenge nini tososolaka ete toyebi Nzambe : ezali mpo ete totosaka mibeko na Ye.
Moto oyo atosaka Liloba na Nzambe azalaka penza na bolingo ya kokoka mpo na Nzambe kati na ye. Ezali ndenge wana nde tososolaka ete tozali moko na Ye.
Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.
Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo : moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.