Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 5:16 - Mokanda na Bomoi

16 Soki omoni ndeko na yo kosala lisumu oyo ememaka na kufa te, osengeli kobondela mpo na ye, mpe Nzambe akopesa ye bomoi. Nazali koloba nde na tina na bato oyo basalaka lisumu oyo ememaka na kufa te. Kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa ; ezali te na tina na lisumu yango nde nazali kosenga na bino kobondela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 5:16
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ;


Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso.


Azwaki mokano ya koboma bango nyonso. Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.


alobaki : — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo : tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo !


Kasi yo Jeremi, kosambela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango te, komeka te kosengela bango eloko ; pamba te nakoyoka bango te tango bakobelela Ngai na tango ya pasi.


Bongo, Yawe alobaki na ngai : — Kosambela mpo na bolamu ya bato oyo te !


Bongo yo Jeremi, komeka kobondela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango ata moke te, komeka kutu te kosengela bango eloko : kotungisa Ngai te, pamba te nakotikala koyokela yo te.


Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.


Boye, Moyize abelelaki Yawe : — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !


Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.


Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama, kasi ye oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te.


Nazali kobondela nde mpo na bango ; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo.


Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.


Solo, lisumu ezali : kobuka mobeko ; kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa te.


Bato nyonso balobaki na Samuele : — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.


Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye ; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye ? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ