Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.
Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba : « Nakosakola mpo na yo ; » bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino to ya masanga mosusu ya makasi, moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli ya bato ya lolenge na ye.
Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso ; kasi moto oyo awuti na mokili akotikala kaka ya mokili mpe alobaka kaka lokola moto ya mokili. Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso,
Yesu azongiselaki bango : — Bino, bozali bato ya se ; kasi Ngai, nawuti na Likolo. Bino, bozali bato ya mokili oyo ; kasi Ngai, nazali ya mokili oyo te.
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.