Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 4:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo : moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 4:21
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.


Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. ›


Molakisi ya mibeko azongisaki : — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. Yesu alobaki na ye : — Kende mpe sala bongo !


Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino.


Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


Mpo na oyo etali bolingo kati na bino, ezali lisusu na tina te ya kokomela bino, pamba te Ye moko Nzambe ateyaki bino kolingana bino na bino.


Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.


Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.


Balingami na ngai, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala kaka, mobeko oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki.


Pamba te, tala Sango Malamu oyo boyokaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso.


Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.


Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali ; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo.


Mpe tala mobeko oyo apesa biso : kondima Yesu-Klisto, Mwana na Ye, mpe kolingana biso na biso, ndenge atindaki biso.


Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ