1 Yoane 4:1 - Mokanda na Bomoi1 Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe alobaki na ngai : — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.