Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Moto nyonso oyo akoma mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu, pamba te nguya ya bomoi ya bonzambe ezali kosala kati na ye ; akoki te kokoba kosala masumu, pamba te azali mwana na Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 3:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino oyo bozali koloba : ‹ Tokolanda ye ndenge nini ? › Mpe bino bato oyo bomoni mabe kati na ngai,


Basalaka mabe te, kasi balandaka banzela ya Nzambe.


Soki eteni moko ya ebembe na yango ekweyi likolo ya nkona oyo basengeli kolona, nkona ekotikala peto ;


Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.


Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.


Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.


Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !


Soki moke te ! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu ?


Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.


mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,


Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.


Boyebi malamu ete Klisto azali sembo ; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe.


Moto nyonso oyo azali moko na Klisto asalaka masumu te, mpe moto nyonso oyo asalaka masumu atikala nanu te komona mpe koyeba Yesu.


Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.


pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali : kondima na biso.


Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ