1 Yoane 3:8 - Mokanda na Bomoi8 Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.