14 Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.
Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
Moto moko te asila komona Nzambe ; nzokande soki tozali kolingana biso na biso, Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na Ye ezali ya kokoka kati na biso.