Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 3:12
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »


Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.


Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.


Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.


Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?


Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te, kasi bato malamu balukaka bato ya sembo.


Bato ya sembo bayinaka moto ya masumu, mpe moto mabe ayinaka etamboli ya bato ya sembo.


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


Elanga ezali mokili, nkona ya malamu ezali bana ya Bokonzi ya Likolo, mpe matiti mabe ezali bana ya Satana ;


mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.


Pilato atunaki lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !


Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.


kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.


kasi Yesu alobaki na bango : — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ?


Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe ! Abrayami atikala kosala bongo te.


Bozali penza kosala misala ya tata na bino. Bazongisaki : — Tozali bana ya makangu te ; tozali kaka na tata moko : Nzambe !


Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola ? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sik’oyo koteka mpe koboma,


Bandeko, bino mpe bokomaki kolanda ndakisa ya Mangomba oyo, kati na Yuda, ezali ya Nzambe mpe ezali kati na Yesu-Klisto, pamba te bandeko na bino ya ekolo moko banyokolaki bino ndenge Bayuda banyokolaki Mangomba ya Yuda.


Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi ; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi.


Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.


Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.


Namonaki ete mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe ya batatoli ya Yesu. Tango kaka namonaki ye, namitungisaki mingi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ