Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 3:11 - Mokanda na Bomoi

11 Pamba te, tala Sango Malamu oyo boyokaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 3:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

atelemaki longwa na mesa, alongolaki bilamba oyo alataki, azwaki eteni moko ya elamba mpe amikangaki yango na loketo.


Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino.


Bomemisana mikumba bino na bino ; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Mpo na oyo etali bolingo kati na bino, ezali lisusu na tina te ya kokomela bino, pamba te Ye moko Nzambe ateyaki bino kolingana bino na bino.


Tina ya mitindo yango ezali bolingo oyo ewuti na motema ya peto, na makanisi ya malamu mpe na kondima ya solo.


Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.


Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.


Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.


Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.


Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso.


Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo : moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.


Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe.


Mpe sik’oyo, mama molingami na ngai, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kaka mobeko oyo tozwaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ