Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 2:6 - Mokanda na Bomoi

6 Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na Nzambe asengeli mpe kotambola ndenge Yesu atambolaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 2:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ye moko Yawe akopesa esengo, mpe mabele na biso ekobota bambuma.


Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.


pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino.


Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.


Bolanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nalandaka ndakisa ya Klisto.


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.


Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.


Moto nyonso oyo alobaka : « Nayebi Nzambe, » kasi atosaka te mibeko ya Nzambe azali mokosi mpe solo ezali kati na ye te.


Moto oyo atosaka mibeko na Ye awumelaka kati na Nzambe, mpe Nzambe awumelaka kati na ye. Bongo ndenge nini toyebaka ete Nzambe azali kowumela kati na biso ? Ezali na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso.


Moto nyonso oyo azali moko na Klisto asalaka masumu te, mpe moto nyonso oyo asalaka masumu atikala nanu te komona mpe koyeba Yesu.


Tala mpo na nini bolingo ezali ya kokoka kati na biso : ezali mpo ete tozala na elikya ya kokoka na mokolo ya kosambisama ; pamba te kati na mokili oyo, ndenge Klisto azali, ndenge biso mpe tozali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ