Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.
Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.
Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.