Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe.
Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.
Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?
Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.