Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 2:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 2:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.


Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.


Moto ya bwanya ayebi epai azali kokende, kasi zoba atambolaka na molili ; kasi nasosoli likambo moko : suka na bango mibale ekozala kaka ndenge moko.


Okoyina ndeko na yo te na motema na yo ; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye.


Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.


« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »


Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.


ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Kasi moto nyonso oyo azangi yango amonaka mosika te, azali lokola mokufi miso ; abosani ete basila kopetola ye, wuta kala, na masumu na ye.


Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te.


Moto nyonso oyo alingaka ndeko na ye azali kati na pole ; mpe ezali na eloko moko te kati na ye, oyo ekoki kobetisa ye libaku.


Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na pole kasi ayinaka ndeko na ye, azali nanu kati na molili.


Moto nyonso oyo ayinaka ndeko na ye azali mobomi ; mpe boyebi malamu ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko kati na ye.


Soki moto alobi ete alingaka Nzambe, kasi azali lisusu koyina ndeko na ye, azali mokosi. Pamba te moto oyo alingaka te ndeko na ye, oyo amonaka akoki kolinga te Nzambe oyo amonaka te.


Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ