1 Yoane 1:9 - Mokanda na Bomoi9 Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.
Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe ; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.