Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Yoane 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Yoane 1:5
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Epai na Yo, butu ezalaka molili te, butu ezalaka na pole lokola moyi, pole mpe molili ezali ndenge moko.


Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ; nakobanga nani ? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ; nakolenga liboso ya nani ?


Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe !


Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.


Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama, ayebaka makambo oyo esalemaka na molili, mpe pole ezali kati na Ye.


Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?


Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato.


Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.


Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.


Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.


Pamba te, nateyaki bino makambo oyo nazwaki epai ya Nkolo : Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki Ye, azwaki lipa ;


Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !


bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.


Pamba te, tala Sango Malamu oyo boyokaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ