1 Yoane 1:3 - Mokanda na Bomoi3 Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.
Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.
Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto ; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.