Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.
Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.
Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.