1 Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima.
Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !
Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.
ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.